Lisungi ya Emirats Arabes Unis, mpo na programme ya gouvernement ya Suminwa, na nzela ya Ministère ya Affaires Sociales, Actions Humanitaires mpe Soliderité Nationale.
Oyo e justifiaki lelo audience oyo ministre Nathalie-Aziza Munana apesaki na Ambassadeur, Anwar Barout Al Baroudi, ya Emirats Arabes Unis na République démocratique du Congo.
Bato mibale baye balobelaki bamposa ya bomoto mpe ya bomoi ya bato kati na bikolo biye mibale. Mpo na ministre ya Affaires sociaux, Actions Humanitaires mpe Solidarité Nationale, Aziza Munana, mikakatano ya humanitaire mpe social na RDC ezali minene mingi.
Ezali ko compter na soutien ya ba partenaires misusu, y compris Emirats Arabes Unis mpo na soutien ya seko. Na masolo maye, Aziza Munana ayebaki milende ya gouvernement mpo na kobongisa situation sociale ya basi ya ba soldats oyo mibali na bango bakweyaki na terrain ya lokumu mpe a notaki oyo ministère esali mpe oyo ekani ko soigner ba orphelins mpe mibange na ko réhabiliter certains ba infrastructures minene, mingi mingi ba orphelinats mpe bandako ya mibange.
Na boumeli ya mikolo nkama, Ministre ya Affaires sociales atelemaki na lolenge nini kosunga baye bazwaki mpasi na bitumba ya mabe oyo Rwanda mpe ba sociétés multinationales mosusu etiamaki na bosembo te, nzokande azali kosalela politiki ya bopesi makoki na basi, mpe yango, na boyokani na vision ya Chef d’Etat, Félix Antoine Tshisekedi Tshilombo, lokola asungami na gouvernement ya Judith Suminwa Tuluka.
Mpo na Ambassadeur, Anwar Barout Al Baroudi, mboka na ye ekotika makasi te mpo na kosunga milende ya ministre ya Affaires sociales na secteur na ye. Alaki mpe kopesa mosolo mpo na kosala elongo na ba ONG mosusu oyo endimami na l’Etat congolais mpe na Ministère ya Affaires Sociales mpo na kokokisa bamposa ya bana ya balabala, oyo babengaka mingi « Shegués », nzokande kosala programme mpo na soins socials ya bana ya balabala.
Masolo maye masukaki na ambiance ya boninga mpe ba parties mibale balakaki kokutana lisusu kala mingi te mpo na ko réaliser ba besoins wana.






