Ezali mokolo ya elilingi mpo na Ministre ya Affaires Sociales, Actions Humanitaires mpe Solidarity National, Aziza Munana, Mercredi oyo, 21 août 2024. Elongo na ministre adjoint ya mines mpe koleka 10 députés nationales, Aziza Munana akendeki liboso na présentation ya misala ya botomboli lisanga misalemi na DOT MMH Kinsevere na secteur ya Bukanda, territoire ya Kipushi na province ya Haut-Katanga.
Struktur ya liboso oyo ekofungwama ezali eteyelo ya ebandeli ya Shindaika, na nsima Institut technique. Pembeni ya ministre adjoint ya mines, ba personnalités mibale bakataki ruban kopesa accès na ba installations ya immeuble oyo. Sima ya tournée ya ba locaux, Aziza Munana a exprimaki satisfaction na ye.
Etape ya mibale ezali inuguration ya ba écoles primaires ya Kiembo 1 na Institut technique ya Kiembo, na groupe Kasongo. Esengo monene mpo na bokonzi ya bonkoko oyo eyambaka lisungi ya mbulamatari na nzela ya misala miye. Série oyo ya inaugural ekangamaki na oyo ya centre culturel communautaire ya Kifita. Oyo ezali na ba bureaux ebele, salle ya réunion mpe esika monene ya ofele.
Na kosenga na ba bénéficiaires basalela yango malamu, ministre ya Affaires sociales Aziza Munana akundoli misala misalami na Président ya République Félix Tshisekedi na nzela ya gouvernement ya Suminwa, mpo na kopesa ba communautés ba installations modernes oyo epesaka bana nzela ya koyekola na ba conditions confortables.






