Vice-président ya liboso ya ndako ya likolo ya Parlement congolais, José Kalala Wa Kalala, fondateur mpe président national ya Union pour les valeurs tshisekedistes (UVT), abebisaki ntango te na kosepela mpe bokutani na mokolo ya lomingo oyo, le 18 août 2024, baye ya libota na ye ya politiki, nsima na boponami na ye na ebonga ya suka ya Sénat.
Kolobaka na mpokwa oyo ya langilangi mingi, na miso ya bakambi mingi; mingimingi; ba honorables sénateurs, ministre mpe ba invités mosusu ya lokumu, élu ya ville ya Mbuji-mayi, apesaki liboso merci na Nzambe tout puissant créateur du univers tout en rendre hommage na Président de la République, Félix Tshisekedi mpo na choix mpo na ye mpe alakaki kosala mpasi mpo na komonisa malamu matomba ya bato na Sénat
« Ezali mpokwa esika toyaki koyeba bonene ya Nzambe Ezalaki motuna ya bana mibali mpe bana basi ya UVT kozala na makoki ya kosangana mpo ezali milende oyo esalemi elongo mpe lisusu tozali kosalela libaku oyo, merci mokambi ya l’Etat, Félix Tshisekedi Tshilombo pona kopesa biso libaku oyo ya ko défendre ba valeurs oyo ye a défendre na niveau ya Sénat. »
Asakolaki D’ailleurs, président national ya groupe politique Alliance pour les valeurs (AV), abimisi ba raisons mpe ba stratégies ya victoire na ye, alors que parti politique na ye ezali kaka na 4 ans.
« Na 4 ans oyo tosalaki, kasi ezali mosala oyo tosali na sima ya ba coulisses. Ezali mosala ya ba mbula ebele, 4 ans ezali moke te, tango tozali organisé tokoki ko gérer na résultat ».
Na ambiance oyo, na divertissement oyo moyembi mpe pasteur ya Gospel, Moïse Mbiye, mpe ba animateurs culturels misusu bapesaki, ba dirigeants misusu ya parti UVT bazangaki ata liloba moko te
« Nazali na esengo mpe na esengo mingi, Elonga oyo elendisi kondima na biso na Nzambe, mpe elonga oyo epesi biso posa ya koloba merci na ba camarades nionso ya UVT oyo ba accompagner président José Kalala wa kalala na lutte oyo eteyaki biso tondimela biso, mpo na kobunda kopema, mpo azalaki ntango nyonso koloba ete moto ya kobangabanga alongi ata moke te, kasi molongi atika te Atikaki te kino akomaki vice-président ya liboso ya Sénat,… » esakolaki, Fedy Mukendi, mokambi ya UVT
Notez que victoire oyo ezali ko marquer étape important na carrière politique ya José Kalala mpe attachement na ba valeurs tshisekedistes oyo ezali ko pousser ye lisusu azua ba défis oyo ezali kozela ye na ba mbula oyo ezali koya. Sénateur José kalala wa kalala azalaki mbala mingi conseiller ya Félix Tshisekedi, président ya République ya lelo, na ba postes ndenge na ndenge oyo azalaki na yango na kati ya UDPS.






